Mpona nini bopesi nzela na mobeko oyo ya bolongoli bwa zemi na moto ezali malamu te mpona nzoto kolo

Page 1

Mpona nini bopesi nzela na mobeko oyo ya bolongoli bwa zemi na moto ezali malamu te mpona nzoto kolongono ya mwana mwasi? Momekano na maloba mpona kozuwa nzela ya bolongoli bwa zemi na mobimba na yango mokolo mobimba Boangi monene bwa nzoto kolongonu ya mokili mobimba (OMS) koloba ete ezali na bolongoli bwa zemi nkese (million) 42 mokili mobimba na mbula moko, mpe nkese 20 oyo ezali ya kobatama to kozanga kozuwa nzela na mobeko na mboka. Kolandana na boangi monene bwa nzoto kolongonu ya mokili mobimba (OMS), bolongoli bwa zemi bwa kozanga libateli pene na 65.000 kino 70.000 liwa ya basi mpona kobota na mbula moko,1 mokama na mayoko 99 ya moko kozuwa esika kati na mboka oyo esili kokende liboso.2 Kotala mituya oyo (oyo ezali na mituna ebele mpe ya kozanga kondimisama3), lisanga ya bato songolo kotatola ete kolongola mobeko ya kopekisa to kotelemela bolongoli bwa zemi ekobatela ebele na basi na liwa to kozuwa likama oyo ekouta na bolongoli bwa zemi bwa kozala nzela na mobeko na mboka mpe oyo ezali mabe. Bopesi nzela bwa bolongoli bwa zemi na mobeko namboka mpe lisungi ya mosala ya kotia molongo kati na libota na oyo etali kobota (plan familial) ekitisi liwa ya bolongoli bwa zemi, oyo Mayangani ya mokili mobimba mpona kotia molongo kati na libota (Federation Internationale pour le Plan Familial).4 Kasi suka na oyo ezali kokesana na litatoli oyo ezali. Bozangi bwa mosala na monganga ya ekeke oyo mpe libateli na nzoto kolongonu ya lolenge na likolo, lipekisi ya

bolongoli bwa zemi te, kouta na mbotana na liwa ya basi mpona kobota. Kopesa nzela na bolongoli bwa zemi kokela

momesano—kati na mokili oyo na nzela ya bokei liboso, epai wapi lisungi ya nzoto kolongonu ya basin a kobota ezali moke mingi, mokili oyo kobaki mituya ya liwa na basi kokufa to kozala na likama na nzela ya bolongoli bwa zemi.


Turn static files into dynamic content formats.

Create a flipbook
Issuu converts static files into: digital portfolios, online yearbooks, online catalogs, digital photo albums and more. Sign up and create your flipbook.